Liteya yazomi namibale - Douzième leçon


01. Ozalaki wapi kasi ?
02. Nani alukaki ngai, mpo nanini ?
03. Bazalaki kotuna yo awa natata.
04. Wapi mokanda batindelaki ngai
05. Omonaki yango namesa nayo te ?
06. Nayaki kokuta ndako bakangi.
07. Ata moto moko azalaki wana te ?
08. Eliza azalaki kolamba nakuku.
09. Bongo Ani akendeki wapi ?
10. Ani namonaki ye liboso.
11. Kasi olingaki kotuna naye !
12. Bongo ngai nayebaki ?
13. Ani moto akangaki ndako nayo.
14. Yo oyebaki te akangaki yango ?
15. Nalingaki koyebisa yo liboso.


01. Où étais-tu, enfin ?
02. Qui m'a cherché, pourquoi ?
03. Papa te cherchait (on te cherchait par papa)
04. Où est la lettre qu'on m'a envoyée ?
05. Ne l'as-tu pas vue sur la table ?
06. Je suis venu trouver la maison fermée.
07. Il n'y avait vraiment personne là ?
08. Elisa préparait à la cuisine.
09. Alors, Annie où était-elle partie ?
10. Annie je l'ai vue (rencontrée) avant.
11. Mais tu aurais dû demander à elle !
12. Mais, est-ce que je savais ?
13. C'est Annie qui a fermé la porte (maison).
14. Tu savais qu'elle l'avait fermé(e) ?
15. J'allais vous (t') avertir avant.


Console audio


Momekano - Exercice


01. Soki oyebisaki ngai, nalingaki kolanda ye.
02. Nasepelaki nabiloko Eliza alambaki.
03. Soki nazalaki wana, olingaki koliya yango te.
04. Mpo nanini ? Ngai moto nakangaki ndako nayo ?
05. Mpo okanisaki lisusu te na koyebisa ngai.


01. Si tu m'avais averti, je l'aurais suivi(e).
02. Je m'étais réjoui des choses qu'Elisa avait préparées.
03. Si j'avais été là, tu ne les aurais pas mangées.
04. Pourquoi ? Est-ce moi qui ai fermé la porte ?
05. Parce que tu n'as plus songé à m'avertir.


A retenir


-luk- chercher
-tind-el envoyer pour
-kang- fermer, lier
-land- suivre
-liy- manger
-tun- demander
-yeb- savoir
-yeb-is- faire savoir
-sep-el- se réjouir
-kan-is- penser


na : (ici) pour ; nde : (la situation était telle) que (j'aurais fait ...)






Vers leçon 13

Vers liste des leçons