Liteya yazomi nalibwa - Dix-neuvième leçon
01. Bana minei basombi mikanda ntuku mitano.
02. Mwana yaliboso asombi mikanda mwambe.
03. Yamibale asombi mikanda ntuku mibale namoko.
04. Yamisato azwaki mikanda boni ?
05. Nayebi nangai te.
06. Kasi luka naino liboso, bandeko ?
07. Kamata mikanda mwambe yamwana yaliboso.
08. Bakisa yango namikanda ntuku mibale namoko ...
09. Ekomi mikanda boni wana ?
10. Ekomi mikanda ntuku mibale nalibwa.
11. Malamu, kasi nakolula ntalo yamikanda ...
12. Bongo, yango wana napesi kasi.
13. Te, wana ezali mikanda yabana mibale yaliboso.
14. Boye, mpo te nazwa mikanda yaoyo yamisato ...
15. Okosala boni, luka malamu.
01. Quatre enfants ont acheté 50 livres.
02. Le premier enfant a acheté 8 livres.
03. Le second a acheté 21 livres.
04. Le troisième a eu combien de livres ?
05. Je ne sais pas.
06. Mais cherche d'abord, enfin !
07. Prenez les 8 livres du premier enfant.
08. Ajoutez-les aux 21 livres (du second) ...
09. Cela arrive à combien de livres là ?
10. C'est vingt-neuf livres.
11. C'est bien, mais je cherche le nombre de livres ...
12. Ainsi, c'est celui-là que j'ai donné, enfin.
13. Non, ça c'est (le nombre) des livres des deux premiers enfants.
14. Dans ce cas, pour que j'aie les livres du 3ème ...
15. Que feras-tu (dois-tu faire), cherche bien.
Console audio
Momekano - Exercice
01. Bana boni basombi mikanda ?
02. Molakisi akotuna nini ?
03. Mokanda moko ezali ntalo boni ?
04. Basombaka mikanda wapi epai ?
05. Basalaka nini namikanda ?
01. Combien d'enfants ont acheté des livres ?
02. Le moniteur est en train de demander quoi ?
03. Combien coûte un livre ?
04. Où achète-t-on des livres ?
05. Que fait-on avec des livres ?
A retenir
-somb- acheter, échanger
-bak-is- ajouter, additionner, attacher, fixer
-luk- chercher
-lak-is- enseigner, montrer
-kam-at- prendre, enlever, porter
mo-kanda (mi-) lettre, papier, livre, peau (animal)
mo-lakis-i (mi/bami-) moniteur, enseignant
Le "on" s'exprime par la 3ème personne pluriel (verbe). Ex. 4,5.
Vers leçon 20