Liteya yantuku mibale namibale - Vingt-deuxième leçon


01. Sofele yatakisi amonaki likambo liye amonaka naino te, liye ayoka ata koyoka namatoi te.
02. Amemeki mwasi moko, akomisi ye nandako naye.
03. Mwasi alobi nasofele :
04. Kokende naino te, zila moke.
05. Okokende nangai lisusu nabar.
06. Sofele afandi, Mwasi abimisi valizi naye.
07. Mpo akamata mosolo mpe akamata mwa elamba.
08. Oyo ebongi naye mpo te alata yango.
09. Liso lyasofele likiti nakati yavalizi.
10. Oyo nde ebele yambongo ? sofele akanisi.
11. Mwasi abimisi makuta nkoto mitano.
12. Akangi valizi. Alobi nasofele sikawa bakende.
13. Bango wana bakei, bakomi nabar.
14. Awa sofele atiki mwasi, alobi :
15. Malamu nalanda valizi yamwasi oyo.
(ekolanda)


01. Un chauffeur de taxi a vu une chose qu'il n'avait jamais vue auparavant,
qu'il n'avait jamais entendue de ses propres oreilles avant.
02. Il avait transporté une femme, il la déposa chez elle (dans sa maison).
03. La femme dit au chauffeur :
04. Ne partez pas encore, attendez un peu ;
05. Vous m'amènerez encore jusqu'au bar.
06. Le chauffeur attendit. La femme sortit sa valise,
07. pour prendre de l'argent et un petit habit
08. qui lui conviendrait (joli) pour qu'elle le mette.
09. L'oeil du chauffeur descendit dans la valise.
10. Voici une quantité d'argent, se dit-il.
11. La femme sortit (prit) 5.000 Makuta ;
12. Elle ferma la valise et dit au chauffeur de partir.
13. Les voilà partis, ils arrivent au bar.
14. Ayant déposé la femme, le chauffeur se dit :
15. Il vaut mieux que j'aille retrouver cette valise.
(à suivre)

Console audio


Momekano - Exercice


01. Sofele azalaki kozila pembeni yandako.
02. Basi balingi mingi kokende natakisi.
03. Nguma ezali nyoka yamonene eleki banyoka.
04. Moto namoto alingi koboma ye soki amoni ye.
05. Yango wana nguma alobi : "moto yamalamu namokili azali te ; moto alingi ngai azali te."


01. Le chauffeur attendait près de la maison.
02. Les femmes aiment circuler en taxi.
03. Le boa est un serpent plus grand/gros que les autres.
04. Chacun veut le tuer chaque fois qu'on le voit.
05. C'est pourquoi le boa a dit : "il n'y a pas un seul type bon ici sur terre ; personne ne m'aime".


A retenir


-mem- transporter
-bim-is- sortir (tr.)
-tik- laisser
-kam-at- prendre
mbongo/mosolo argent, richesse






Vers leçon 23

Vers liste des leçons