Liteya yamisato - Troisième leçon
Je suis revenu (pour) à cause de toi.
Nayei kozonga mpo nayo.
Je veux vomir (souvent) plusieurs fois.
Nalingi kosanza mbala mingi.
Qui est couché ainsi sur le chemin/route ?
Nani oyo alali nanzela boye ?
Quand il est venu ici, nous l'avons bien reçu.
Ayei awa toyambi ye malamu.
Je ne sais pas (quant à moi).
Nayebi nangai te.
Nous allons apprendre nos leçons en classe.
Tokei koyekola mateya nakelasi.
Pourquoi me singez-vous (m'imitez-vous) ?
Bozali koyekola ngai mpo nini ?
Si je chante, vous commencez à danser.
Soki nayembi, bobandi kobina.
Ce n'est pas ton affaire.
Yango ezali likambo nayo te.
Ce dimanche-ci nous tardons beaucoup par ici.
Nayenga oyo toumeli mingi awa.
Je crois que vous êtes turbulents.
Nakanisi bozali nayauli mingi.
Non, nous ne sommes pas des voleurs.
Te biso tozali moyibi te.
Je désire/recherche uniquement la tendresse.
Naweli se boboto.
Tout ce que je fais, tu le méprises.
Yoso nasali otali yango pamba.
On le hait uniquement et seulement pour sa renommée.
Bayini ye kaka se mpo nalokumu.
Console audio
Exercice
Momekano
Danser n'est pas un travail.
Kobina ezali mosala te.
Etudier c'est comme imiter (singer).
Koyekola ezali lokola koyekola.
Arrivé ici, il s'est assis.
Ekomi ye awa, afandi.
Vous avez beaucoup trop tardé avant de (pour) venir.
Boumeli mingi mpo na koya.
Le voleur s'est enfui sur le chemin.
Moyibi akimi nanzela.
A retenir
-zong-, revenir
-yamb-, recevoir
-yeb-an-, être connu
-yek-ol-, singer, imiter
-wel-, désirer, plaider
-um-el-, tarder
-yin-, haïr
-sanz-, vomir
-yeb-, savoir
-yek-ol, étudier
-band-, commencer
-kan-is-, penser, réfléchir
-tal-, regarder
-lal-, dormir
-yeb-is-, faire savoir
-yemb-, chanter
-bin-, danser
lokola, comme
Vers leçon 4