Liteya yantuku misato namibale - Trente-deuxième leçon
01. BaBangi bazali bato milai, baLuba bato minene, baKongo bato mikuse.
02. Malala yamalamu ezali nanzete oyo.
03. Mosali azali namwana moko yamwasi.
04. Molambi azali namwana mpe nabasi mibale.
05. Ozali ndoi nangai, tozali nkombo moko.
06. Bokokani nangai te, bozali bana mike.
07. Bana mingi ba bayekoli yakelasi.
08. Moyibi azangaka koyiba te.
09. Tata akosala epai yamosala naye.
10. Mondele abuti likolo yamotuka.
11. Mwana mwasi abuti mpe afandi sima naye.
12. Bayekoli balingaka mingi kobuta nanzete.
13. Ngomba nangomba ekutanaka te, se bato.
14. Likambo lizwaka nzete te, se moto.
15. Libala : liboso sukali, nasima bololo.
01. Les baBangi sont des gens grands, les baLuba des gens gros, les baKongo des gens petits.
02. Les bonnes oranges sont dans cet arbre (il y a).
03. Le travailleur a une (jeune) fille.
04. Le cuisinier a un enfant et deux femmes.
05. Tu es mon homonyme, nous avons un même nom.
06. Vous ne m'égalez pas, vous êtes des enfants.
07. Beaucoup d'enfants sont des écoliers.
08. Un voleur ne manque jamais (l'occasion) de voler.
09. Papa est en train de travailler à son lieu de travail.
10. Le blanc est monté sur son véhicule.
11. Une jeune fille est montée et s'est assise derrière lui.
12. Les écoliers adorent monter aux arbres.
13. Deux collines ne se rencontrent jamais, seulement les hommes.
14. La palabre n'arrive pas à un arbre, mais seulement à un homme.
15. Le mariage est d'abord sucré et puis aigre.
Console audio
Momekano - Exercice
01. Mbwa namakolo minei, atambolaka nzela mibale te.
02. Mbwa yamakelele mingi, aswaka te.
03. Zilazila mokomboso azanga mokila.
04. Opesi ata mbwa, mbwa aboi.
05. Mabele ezali ndeko te.
01. Le chien avec quatre pattes ne parcourt pas deux chemins à la fois.
02. Un chien qui aboie ne mord jamais.
03. A force d'attendre, le chimpanzé manqua de queue.
04. Donne même au chien, il refuserait (trop mauvais).
05. La terre n'est pas une amie (elle enterre tout).
Vers leçon 33