Liteya yantuku misato namisato - Trente-troisième leçon
01. Ngai na moninga nangai tozalaka balabala moko.
02. Velo ezali pasi te na kofungola yango.
03. Eliza azali kuna nandako ?
04. Nakanisi, mpo monoko yandako ezali yakofungola.
05. Mbwa nayo ezali naliboma okolakisa yango namonganga lobi nantongo.
06. Namonaka mbala mingi, soki moto akufi,
07. ndeko naye alongoli nsuki yoso namoto,
08. atikali kolokolo.
09. Boye elingi koloba te :
10. nsuki (moto) ebomaki moto yango ?
11. Napesi yo eyano naino te.
12. Tambolaka se bongo nanzela.
13. mokolo okokutana yomoko nanzela na moto moko alongoli nsuki ndenge olobi.
14. Tuna ye motuna oyo otuni ngai awa.
15. Eyano akopesa yo, oyebisa ngai yango.
01. Moi et mon ami nous habitons la même rue.
02. Le vélo n'est pas difficile à ouvrir.
03. Elisa est-elle dans la maison ?
04. Je crois, la porte de la maison est ouverte.
05. Ton chien a de la folie, tu le montreras au docteur demain matin.
06. Je vois très souvent, si quelqu'un est mort,
07. son parent enlève tous les cheveux (se rase).
08. Il reste chauve.
09. Ceci veut-il dire que ce sont
10. les cheveux qui ont tué cet homme-là ?
11. Je ne te donne pas encore de réponse.
12. Circule seulement comme cela sur la route,
13. le jour où tu rencontreras quelqu'un sur ta route
14. rasé comme tu dis, pose lui cette question.
15. La réponse qu'il te donnera tu me la diras !
Console audio
Vers leçon 34