Liteya yantuku misato nasambo - Trente-septième leçon
01. Mwana abikisi tata na mama naye :
02. Ezalaki moto moko na mwasi naye,
03. Baboti mwana moko yamobali.
04. Mwana akoli, akei kelasi, akomi monene.
05. Akamati mosala, akei mosika.
06. Alali kuna mbula mitano.
07. Nasima nayango azongi epai yababoti nayé.
08. Akuti bango bazali namaladi yamakasi ;
09. biloko yakoliya te, mbongo te, nini te.
10. Mwana wana atali mpe alobi :
11. Awa boye biloko bizali te.
12. nakosalisa bango boniboni ?
13. Akamati nzela, akei nazamba,
14. Asali mwa motambo.
15. Akangi ndeke moko, ayei nayango apesi natata. (ekolanda)
01. Un enfant a sauvé son père et sa mère :
02. Il y avait une fois un homme avec sa femme,
03. ils eurent un enfant mâle (un garçon).
04. L'enfant grandit, alla à l'école, devint grand ;
05. Il trouva du travail et alla au loin.
06. Il resta là-bas 5 ans/pluies.
07. Après quoi, il revint chez ses parents.
08. Il les trouva fort malades,
09. sans nourriture, sans argent, sans rien.
10. L'enfant réfléchit et se dit :
11. Dans ces conditions, il n'y a rien,
12. comment vais-je les aider ?
13. Il (prit la route) se mit en route pour la forêt,
14. il fit un petit piège.
15. il attrapa un oiseau, revint avec et le donna à son père. (à suivre)
Console audio
Momekano - Exercice
01. Basali mibale bakendeki kotimola mabele.
02. Moko nabango akiti nakati yalibulu molindo mpo yakotimola.
03. Mabele ebukani mpe enyeti ye likolo.
04. Moninga naye ameki kobimisa ye, akoki te.
05. Akei nabelesi koluka bato mosusu.
01. Deux travailleurs sont partis creuser la terre.
02. L'un deux entra (descendit) dans le grand trou pour creuser.
03. La terre s'ébrécha et s'écroula sur lui.
04. Son ami essaya de l'en sortir vainement.
05. Il rentra à la cité pour chercher d'autres hommes.
A retenir
-bik-is- sauver
-bik- être sauvé
-kam-at- prendre
-sal-is- aider
-tim-ol- creuser
-kol- grandir
-zong- revenir
-kut- venir trouver
-buk-an- s'ébrécher
mo-bik-is-i sauveur
Vers leçon 38