Liteya yantuku minei - Quarantième leçon
Mobali moko, azalaki se yemoko na biloko mingi. Mokolo moko alobi : tika nakende koluka mwasi. Akei. Atamboli ka ka ka, akomi namboka moko, akuti wana Ntaba. Ntaba atuni ye : ndeko, okokende wapi ? Moto alobi : nakokende koluka mwasi yakobala naye. Ntaba alobi : zila ngai tokende elongo.
Batamboli tee tee tee, bakomi namboka mosusu, bakuti wana Nsoso. Nsoso atuni bango : bandeko, bokei wapi ? Bango bayanoli te : tokei kobala basi. Nsoso alobi : bozila ngai tokende elongo.
Banso basato, batamboli ka ka ka, bakomi namboka yamokonzi yabasi. Bapesi ye losako nabolamu. Bafandi. Mwa moke, Moto alobi : Mama, toyei mpo yakobala basi. Mama ayanoli te : malamu, bopema naino. (ekolanda)
Un homme vivait tout seul dans un village avec beaucoup de choses. Un jour, ils se dit : je vais chercher une épouse ; il s'en alla. Il marcha longuement et il arriva dans un autre village ; il y trouva un Bouc. Le Bouc lui demanda : ami, où vas-tu ? L'homme dit : je vais chercher une compagne. Le Bouc dit : attends-moi que nous partions ensemble. Ils marchèrent longtemps et ils arrivérent dans un autre village ; ils y trouvèrent un Coq là. Le Coq leur demanda : mes amis, où allez-vous ? Ils répondirent que : nous allons épouser des femmes. Le Coq dit : attendez-moi, nous allons partir ensemble.
Tous les trois marchèrent gaillardement ; ils arrivèrent au village de (chez) la cheftaine des femmes. Ils la saluèrent comme il faut. Ils s'assirent. Après un moment l'homme dit : Maman, nous venons pour épouser des femmes. Maman répondit : c'est bien, reposez-vous d'abord. (à suivre)
Console audio
Momekano - Exercice
01. Tosilaki kosala yoti mbala yaliboso.
02. mpo yakozwa bakonzi baye bakoki kobongisa ekolo yabiso.
03. Sikawa balobi te tokosala voti lisusu.
04. Boye, navoti yango yasima, tokozwa bakonzi,
05. baye bakoki, kobongisa mboka nabiso malamumalamu?
01. Nous avons déjà voté une première fois
02. pour avoir des chefs capables de diriger notre peuple/race.
03. Maintenant on nous demande de voter encore.
04. Cela veut-il dire que par le nouveau vote, nous
05. aurons des chefs plus capables:qui peuvent très bien diriger nos peuples ?
A retenir
-ya-mobali homme
-ya-mwasi femme
Vers leçon 41