Liteya yantuku minei namoko - Quarante et unième leçon


Bapemi mikolo misato, yaminei Moto atuni lisusu. Mama ayanoli naye te : lobi, bokozonga namboka nabino.
Butu eindi, Mama mokonzi yabasi, abongisi maboke misato ; moko yaMoto, moko yaNsoso, moko yaNtaba.
Nantongo abengi Moto, apesi ye liboke, mpe ayebisi ye te : soki okei nanzela, soki oyoki nzala, okangola liboke nayo oyo te ; bobele soki okomi nandako nayo, nde oyebi kofungola yango. Moto andimi.
Mama abengi Ntaba, apesi ye liboke naye, mpe ayebisi ye, alobi naye te : nanzela, soki oyoki nzala, liyaka se makala ; okofungola liboke nayo, bobele soki okomi namboka nayo.
Mama abengi lisusu Nsoso, apesi ye liboke lokola, mpe apesi ye mibeko, alobi : nanzela, soki nzala ekangi yo, okwasa putulu, kasi okofungola liboke oyo, kaka nandako nayo.
Esili, bango yoso bandimi. Batondi mama botondi mpe batamboli.(ekolanda)


Ils se reposèrent trois jours, le quatrième l'homme demanda encore. Maman lui répondit : demain vous rentrez chez vous.
La nuit vint, maman prépara trois paquets : un pour l'homme, un pour le Coq, un pour le Bouc.
Au matin, elle appela l'homme, lui donnant un paquet, elle l'avertit que : quand tu seras en route, si tu as faim, n'ouvre pas ton paquet que voici ; seulement si tu arrives chez toi, alors tu peux l'ouvrir. L'homme accepta.
Maman appela le Bouc, lui donna son paquet et l'avertit aussi en disant : en route si tu as faim, mange seulement du charbon, tu n'ouvriras ce paquet-ci que si tu arrives chez toi.
Maman appela encore le Coq, lui donna aussi son paquet et lui donna les interdits/conseils, elle dit : en route, si tu as faim/si la faim t'attrape, gratte seulement la poussière, mais tu n'ouvriras ce paquet que dans ta maison.
Après quoi, tous acceptèrent. Ils remercièrement Maman et s'en allèrent. (à suivre)



Console audio


Momekano - Exercice


01. Bakosala voti yasika mpo elaka nayango ekoki.
02. Ata bakonzi basalaki malamu, ata basalaki malamu
03. te, voti yasika esengeli kosalema, mpo
04. mobeko elobi bongo.
05. Voti ekosukaka se nambala moko mpamba te.


01. On vote de nouveau parce que la date est arrivée.
02. Même si les chefs ont bien agi, même s'ils ont
03. mal agi, le nouveau vote doit se faire, parce que
04. la loi le veut ainsi.
05. Le vote ne finit pas une seule fois.






Vers leçon 42

Vers liste des leçons