Liteya yantuku minei namisato - Quarante-troisième leçon


Bakomi nanzela, Moto abandi koloba : baninga, tokangola maboke nabiso, toliya.
Nsoso na Ntaba baboi ; batamboli.
Nsoso akomi namboka naye. Akangoli liboke boye, amoni se mwasi. Zambi, asepeli. Azali naye seko, se pamba, botuni te.
Ntaba atambolI mpe, akomi nandako naye. Akangoli liboke te, aliya biloko. Amoni se mwasi lokola. Asepeli mpe, azali naye seko, bosombi te.
Ekomi naMoto alobi : ngai nalembi. Afungoli liboke epekisami, nanzela. Mwasi abimi, mpe akimi bobele mbango.
Mobali abengani ye kili kili kili, wapi ! Akangi ye te. (ekolanda)


Arrivés en chemin, l'homme se mit à parler : amis ouvrons nos paquets et mangeons. Le Coq et le Bouc refusérent. Ils s'en allèrent.
Le Coq arriva chez lui, il ouvrit son paquet, y trouva une femme ; il se réjouit ; il l'a pour toujours, à lui tout seul sans contestation.
Le Bouc arriva aussi chez lui : il ouvrit son paquet pour manger la nourriture ; il y trouva également son épouse. Il se réjouit, il l'a pour toujours, sans payer.
Au tour de l'homme, il se dit : moi, je suis fatigué ; il ouvrit le paquet défendu en route. La femme sortit et s'enfuit à toutes jambes.
L'homme la poursuivit très vite, mais hélas, ne la rattrapa pas ! (à suivre)


Console audio


Momekano - Exercice


Nazali koyokana te sikawa nababoti bangai, nakati yandako nabiso. Nakomi komele likaya. Bango balingi te te ngai namele likaya. Balobi te : soki mwana-kelasi azali komele makaya, mayele naye ekosila, Nalobi te : namele ata makaya oyo, nkombo te "Belga", kasi bango bazali kolinga te.


Essayez de traduire en français.



A retenir


-band- commencer, courtiser
-sep-el- se réjouir
-tun- demander
-lemb- être fatigué
-pek-is-am- être défendu
-kang-ol- délier
-beng- appeler
-beng-an- chasser, poursuivre
-pek-is- défendre
-yok-an- s'entendre






Vers leçon 44

Vers liste des leçons