Liteya yantuku minei namotoba - Quarante-sixième leçon
Lisapo nabiso
Moto moko, nkombo te Mbata, ye mosali yakompani, azalaki kosala mosala yasinzili. Bongo, mokolo moko, Mbata akangi mosikitele naye nambalasani yandako, mpo yakokima mbembele, nantango yakolala ; ayoki mpongi mpe alali naye nakati yamosikitele !
Nakati yabutu, Mbata ayoki moto moko azali kokata singa yamosikitele naye, atuni :
- "Nani moto oyo ayei kokata singa yamosikitele yangai ?"
Nasima, Mbata alingi abima boye, mosikitele ekweyi nanzoto naye ; moke boye, ayoki moto wana apapi ye mpota nalibeke mpe mokuwa ekatani.
Mobali oyo akati ye mpota mosusu namoto, mbala mibale ; mpota monene solo mpe yasomo ! Bongo, Mbata abimi namakasi yamobali akei mbango, abengi bato, angangi makasi :
- Baninga aee, boya aa ... nakufi ee ! ...
Bato bayei noki, bakuti Mbata alali nase, mpota ezali kobimisa makila ndenge yasomo ! otala mpota yango mbala mingi te !
Batuni ye :
- Nani moto oyo akati yo mpota ndenge boye ?
Mbata ayanoli te ayebi moto yango te, mpe moto wana asili kokima naye kala ! (ekolanda)
Un homme, du nom de Mbata, lui travailleur d'une compagnie, travaillait comme gardien de nuit. Ainsi, un jour, Mbata attacha son moustiquaire dans la barza de la maison pour fuir les mouches, à l'heure du coucher : il eût sommeil et il s'endormit à l'intérieur de son moustiquaire.
Au milieu de la nuit, Mbata entendit un homme qui coupait les ficelles de son moustiquaire, il demanda :
- Quel est l'homme qui est venu/vient couper les ficelles de mon moustiquaire ?
Après quoi, Mbata voulant sortir comme ça, le moustiquaire lui tomba sur le corps (dessus) ; un instant après, il sentit l'homme lui tailler une grosse plaie sur l'épaule et l'os se brisa.
Cet homme-là lui fit une autre plaie à la tête, deux fois : une grande plaie effrayante ! Ainsi, Mbata sortit (quand même) avec sa force de l'homme/grâce à sa force masculine, il s'en alla vite, appela les gens, en hurlant fort :
- Amis, venez vite ... je meurs ! ...
Les hommes vinrent vite, ils trouvèrent Mbata allongé sur le sol, la plaie béante laissant s'écouler le sang de façon effrayante. Tu ne pourrais pas regarder la plaie plusieurs fois !
Ils lui demandèrent : - quel homme t'a taillé des plaies de cette sorte ?
Mbata répondit qu'il ne le connaît pas et d'ailleurs il s'est déjà enfui depuis longtemps. (à suivre)
Console audio
Vers leçon 47