Liteya yantuku minei nasambo - Quarante-septième leçon
Lisapo nabiso II
Bato bakei kobenga mondele yakompani ; mondele ayei. Lokola amoni mpota eleki monene, bakei namboka yamondele yaLeta. Mondele yaLeta apesi bango kaminyo mpo yakokende nalopitalo.
Kasi bakomi nanzela, Mbata akati motema mpe bazongi naye namboka.
Kasi moto abomi moninga ayebani naino te, tee lelo oyo.
Baninga, mosala yasinzili ezali mosala yalikama monene. Malamu, soki ozali sinzili, olala te, okengele butu mobimba, mpe ozala naebuneli nayo penepene.
Soki moto ayei koyiba biloko to koluka nzela yakoboma yo, akuti yo ozali kokengele, akoki koyiba te.
Kasi soki yo osili nayo kolala, moyibi akoki koboma yo, sikawa mpe akoyiba naye biloko yoso motema naye ekolinga.
Les hommes s'en allèrent appeler un blanc de la Compagnie, le blanc vint. Comme il voyait que la plaie était trop grande ils s'en allèrent chez le blanc de l'Etat/Commissaire ; le Commissaire leur donna un camion pour aller à l'hôpital.
Mais arrivés en route, Mbata rendit l'âme/se coupa le coeur et ils rentrèrent au village.
Par contre, l'homme qui avait tué son frère/un autre n'est pas encore reconnu/connu, jusqu'aujourd'hui.
Mes amis, être veilleur de nuit est un métier très dangereux. Il vaut mieux, si vous êtes veilleur, ne dors pas/que tu ne dormes pas, que tu veilles toute la nuit et que tu sois avec tes armes tout près de toi.
Si quelqu'un vient voler/dérober des choses ou chercher la route de te descendre/le moyen de te tuer/à te tuer, (si) il te trouve en train de veiller, il ne pourra pas voler.
Mais si tu as fini de t'endormir/tu dors, il peut te tuer et après il volera des choses comme son coeur le voudra.
Console audio
A retenir
-bang- appeler
-yeb- savoir
-keng-el- garder
-bun- se battre
-ling- plaire
-pes- donner
-yeb-an- être connu
-bom- tuer
-yib- voler/dérober
-lal- dormir
Chaque adjectif suit le nom qu'il qualifie. Il y a très peu d'adjectifs --> locutions adjectives.
Vers leçon 48