Liteya yantuku minei namwambe - Quarante-huitième leçon


Mobali aboti bana ...

Mokolo moko, nantongontongo penza, Mboloko ayei epai yanoko naye Nkoi, alobi :
- Noko, kotikala boye, mosala te, ezali goigoi mingi ; malamu tokende kotambola nabazando yoso mpo tosomba ngulu. Ntango yango ekobota, biso tokokoma bato banene namboka nabiso.
Singa namaboko, sakosi namokongo, bango mibale batamboli. Bakomi nazando, yoso ezalaki wana. Moto namoto asombi lokola motema naye elingi. Nkoi asombi ngulu yamwasi, Mboloko asombi yamobali.
Sanza mibale eleki, ngulu yaNkoi eboti bana mwambe, mpo yango ezalaki nalibumu, liboso te Nkoi asomba yango.
Mboloko azalaki naye kokende kotala bana bangulu yango mikolo yoso. Nzambe asali, epai yanoko naye Nkoi.
- Soki ngai mpe nakoki kozala nayango mingi boye !
Mokolo moko, makanisi ekomeli ye foli. Ayibi, mpe abandi koyibaka mwana yangulu mokomoko nabutu, epai yanoko naye Nkoi. Akei kobokolo bango epai yayemoko Mboloko.
Nkoi amoni te atikali maboko pamba, akei kotala epai yamwana naye Mboloko.
- Mboloko, yo ozwaki bana bangulu oyo wapi epai ? Nkoi atuni naMboloko.
- Kasi noko Mboloko ayanoli ye, yo oyebi naino te makambo ezalaki awa, likolo yangulu nangai wana yamobali ?
Nkoi azongisi te : - asalaki nini, ngulu nayo yamobali ?
- Kasi, ezali bobele ye moto abotaki bana bangulu oyo yoso,
- Mobali aboti ? Ekoki kozala soki moke te. Yo ozali lokuta, wana ezali bana bangulu nangai. Nkoi azalaki kongala.
- Bangai ! Mboloko azongisi.
Ntembe monene esalami wana !
Nkoi abengi bato yoso yamboka mpo yakokata likambo yango : "Lobi, lobi, bino yoso, boya ; Mboloko akoyebisa biso ndenge nini ngulu naye yamobali aboti."
Mboloko atali, mayele yoso esili. Akei, nabutu, koluka moninga naye Esende, mpo te asalisa ye.
- Moninga Esende moke, salisa ngai.
Mpe ayebisi ye makambo yoso :
- Nayibaki bana bangulu mwambe epai yanoko Nkoi, mpe nakosi ye te, mobali akoki kobota. Mpo te nabika, biso tokosala boye : bato bakoya kosambisa biso lobi, ngai na noko Nkoi nakati yantango. Bongo, yo, nantango yango wana, yo okokatisa mboka mobimba, namwa mbango. (ekolanda)




Console audio







Vers leçon 49

Vers liste des leçons